1 Corinthians 2:6 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Nzoka nde, toteyaka bwanya epai na baklisto oyo bakola na kondima. Yango ezali bwanya ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami na libebi.