1 Corinthians 4:17 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Ezali na tina wana nde natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo, oyo azali sembo kati na Nkolo; akolobela bino lisusu banzela na ngai mpo na bomoi kati na Yesu-Klisto, ndenge kaka nateyaka yango bisika nyonso kati na Mangomba nyonso.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Ezali na tina wana nde, natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo mpe ye oyo azali ya kokangama makasi na Nkolo. Ye akolobela biso lisusu nzela na ngai kati na Klisto Yesu, lokola nateyaka yango bisika nyonso kati na mangomba nyonso.