1 Corinthians 4:6 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi, mpo na bolamu na bino, mpo ete, na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo: Bolekaka mondelo te ya makambo oyo ekomama; mpe mpo ete moko te kati na bino atonda na lolendo na kolanda moko mpe koyina mosusu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi mpo na bolamu na bino, mpo ete na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo: “Boleka ndelo te ya makambo oyo ekomama.” Boye, bokomitombola na lolendo te mpo na kopona moko mpe koyina mosusu.