1 Corinthians 4:9 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te nakanisi ete, biso bantoma, Nzambe atia biso na suka ya molongo lokola bato oyo bakatela bango etumbu ya kufa na libanda ya masano. Mpo na mokili mobimba, mpo na ba-anjelu mpe mpo na bato, Nzambe akomisa biso lokola lisano ya kotala.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te, nakanisi ete Nzambe abimisa biso bantoma na molongo ya suka, lokola bato oyo bakatela bango etumbu ya liwa na esika ya masano. Pamba te bakomisa biso lisano mpo na mokili, mpo na baanzelu, mpe mpo na bato.