1 Corinthians 5:10 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Elingi koloba te ete bozala mosika na bato nyonso oyo, kati na mokili oyo, batambolaka na bomoi ya pite to bazali na lokoso ya mbongo to bazali miyibi to basambeli bikeko, pamba te soki ezalaki bongo, wana bosengeli kolongwa na mokili.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Elingi koloba te ete na bato nyonso ya mokili oyo, oyo basalaka ekobo, to bazali bato ya lokoso ya mbongo, to babotolaka biloko ya bato, to basambelaka bikeko; pamba te soki ezali bongo, wana esengeli ete bolongwa na mokili.