1 Corinthians 7:34 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
mpe motema na ye ezali ya kokabwana. Ndenge moko mpe, mwasi oyo azangi mobali, lokola moseka, atiaka makanisi na ye kati na makambo ya Nkolo mpo ete azala bule kati na nzoto mpe kati na molimo. Kasi mwasi oyo abala atiaka makanisi na ye kati na makambo ya mokili, alukaka ndenge nini kosepelisa mobali na ye.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
mpe motema na ye ezali ya kokabwana. Ndenge moko mpe, mwasi oyo azanga mobali to elenge mwasi oyo abali nanu te, atiaka makanisi na ye na makambo ya Nkolo. Posa ya motema na ye ezalaka kaka ete amipesa mobimba na Nkolo, na nzoto mpe na molimo. Kasi mwasi oyo abala atiaka makanisi na ye na makambo ya mokili oyo, alukaka ndenge nini akoki kosepelisa mobali na ye.