1 Corinthians 7:37 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi mobali oyo azwi mokano kati na motema na ye, na kotindikama te mpe na bososoli nyonso, ya kosangisa nzoto te na mwasi mobandami na ye na libala, asali malamu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi moto oyo azwi mokano na motema na ye, na kotindikama te, na bososoli nyonso ete wuta na motema na ye akosangisa nzoto te na mobandami na ye, asali malamu.