1 Corinthians 7:5 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bopimelanaka nzoto te, longola kaka soki, na boyokani mpe mpo na mwa tango moke, bolingi tango mosusu komipesa na losambo. Kasi sima na tango yango, bozongela kosangisa nzoto mpo ete Satana akozwa nzela te ya komeka bino likolo ya bozangi makoki ya komikanga.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bopimelana nzoto te; kasi soki bolingi komipesa na mabondeli, bokoki koyokana bino mibale ete bosangisa nzoto te mpo na tango moke. Bongo na sima, bozongela kosangana, noki te, Satana akozwa nzela ya komeka bino mpo na kozanga makoki ya komikanga.