1 Corinthians 8:4 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Boye, na tina na likambo ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete nzambe ya ekeko ezali eloko pamba kati na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka se moko.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Boye, mpo na makambo oyo etali banyama oyo babonzelaka banzambe ya bikeko: Toyebi malamu ete nzambe ya ekeko ezali eloko pamba kati na mokili, Nzambe azali kaka se moko.