1 Corinthians 8:7 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Nzokande, bato nyonso bazali na boyebi oyo te; bato mosusu bazali nanu na momesano ya kosambela banzambe ya bikeko kino sik’oyo. Boye wana baliaka misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bakanisaka ete ezali penza mbeka oyo babonzeli banzambe wana; mpe mitema na bango, oyo elenda te ekomaka mbindo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi bato nyonso bazali na boyebi ya makambo oyo te. Bato misusu bazali nanu na momesano ya kosambela banzambe ye bikeko kino sikʼoyo, boye tango baliaka misuni ya banyama oyo babonzelaka banzambe ya bikeko, bandimaka ete ezali penza mbeka oyo babonzelaka banzambe wana. Boye, mitema na bango ekomaka mbindo mpo ete elenda te.