1 Corinthians 9:12 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Soki bato mosusu bazali kosalela makoki wana ya kozwa biloko epai na bino, tosengeli te, biso, kosalela yango koleka? Nzokande, tosalelaki makoki yango te, tokangaka kaka motema na makambo nyonso, mpo ete tozala epekiselo te liboso ya Sango Malamu ya Klisto.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Soki bato mosusu bazali kozwa biloko epai na bino, boni, biso tokoki kozwa yango koleka te? Nzoka nde, tosalelaka makoki na biso te, tokangaka mitema na makambo nyonso, noki te tokozala epekiseli mpo na Sango Malamu ya Klisto.