1 Corinthians 9:21 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Tango nazalaka elongo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko te, nakomaka mpe lokola moto oyo azali na se ya bokonzi ya Mibeko te, mpo ete namema bango epai ya Klisto; nzokande natosaka Mibeko ya Nzambe, pamba te natosaka Mibeko ya Klisto.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Tango nazalaka elongo na baoyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko te, nakomaka mpe lokola moto oyo azali na se ya Mibeko te (elingi koloba te ete natosaka Mibeko ya Nzambe te, pamba te natosaka Mobeko ya Klisto), mpo ete namema bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko te epai na Klisto.