1 John 2:27 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Mpo na bino, Molimo Mosantu oyo Kristo apesaki bino, azali kati na bino, mpe bozali na posa te ete moto ateya bino, pamba te Molimo oyo Kristo apesaki bino ateyaka bino makambo nyonso. Mpe makambo oyo ateyaka bino ezali ya solo, akosaka te. Yango wana bozala kati na Kristo, ndenge Molimo ateya bino yango.