1 John 3:24 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Moto oyo atosaka mibeko na Ye awumelaka kati na Nzambe, mpe Nzambe awumelaka kati na ye. Bongo ndenge nini toyebaka ete Nzambe azali kowumela kati na biso? Ezali na nzela ya Molimo Mosantu oyo apesaki biso.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Moto oyo atosaka Mibeko ya Nzambe azali kati na Nzambe, mpe Nzambe kati na ye. Mpe, tala ndenge toyebi ete Nzambe azali kati na biso: Toyebi yango na nzela ya Molimo oyo apesaki biso.