1 John 5:20 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Nzokande toyebi ete Mwana na Nzambe ayaki mpe apesaki biso bososoli, mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na ye oyo azali solo, elingi koloba: kati na Mwana na ye Yesu Kristo. Ye azali Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.