1 Peter 2:20 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi lokumu nini ezali ya komona pasi ya etumbu mpo na mabe oyo osali? Nzokande, na miso ya Nzambe, komona pasi mpo na bolamu oyo osali ezali penza ngolu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te lokumu nini bokozwa soki babeti bino mpo na mabe oyo bosalaki mpe bokangi mitema mpo na yango? Kasi soki bonyokwami mpo bozali kosala malamu, mpe bokangi mitema mpo na yango, ya solo, yango ezali likambo moko ya malamu na miso ya Nzambe.