1 Peter 2:23 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Tango bafingaki ye, azongisaki na kofinga te. Tango banyokolaki ye, akanelaki moto moko te; kasi amitikaki na maboko ya Nzambe, ye oyo asambisaka na bosembo nyonso.