1 Samuel 14:12 — Compare Translations

1 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Balobaki na Jonatan mpe na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye: « Boya epai na biso, tokoteya bino likambo moko. » Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye: « Landa ngai na sima, pamba te Yawe asili kokaba bango na maboko ya Isalaele. »