1 Thessalonians 1:5 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
pamba te Sango Malamu na biso ekomaki epai na bino kaka na maloba te, kasi mpe na nguya, na Molimo Mosantu mpe na kondima monene. Mpe boyebi malamu ndenge nini tozalaki kovanda kati na bino mpo na bolamu na bino.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
pamba te Sango Malamu na biso ekomaki epai na bino na malobakaka te, kasi ekomaki mpe na nguya elongo na Molimo Mosantu, mpe na elikya monene. Boyebi ezaleli oyo tozalaki na yango kati na bino; yango ezalaki mpo na bolamu na bino.