1 Thessalonians 2:16 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
bazali kokanga biso nzela mpo ete toteya Bapagano te, noki te bakobika. Na ndenge wana, bazali kaka kofulukisa masumu na bango mpe, suka na suka, kanda ya Nzambe ekokweyela bango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bazali kokangela biso nzela mpo na koteya bato oyo bazali Bayuda te, mpo ete babika. Na ndenge wana, bazali kaka kotondisa masumu na bango. Mpe suka na yango, kanda ya Nzambe ekweyeli bango.