1 Thessalonians 3:12 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Tika ete Nkolo abakisa mpe afulukisa bolingo kati na bino mpo ete bolinganaka, bamoko na bamosusu, mpe mpo ete bolingaka bato nyonso, ndenge kaka biso mpe tolingaka bino.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Tika ete Nkolo akolisa bolingo na bino mpe atondisa yango kati na biso na bino, mpe epai ya bato nyonso, ndenge biso mpe tolingaka bino.