1 Timothy 5:4 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Soki mwasi akufisa mobali azali na bana to bakoko, bana to bakoko yango basengeli, liboso na nyonso, koyekola kotalisa botosi na bango kati na makambo ya Nzambe na nzela ya kosunga libota na bango mpe kozongisa bolamu epai ya baboti mpe bakoko na bango, pamba te kosala bongo esepelisaka Nzambe.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi soki mwasi oyo akufela mobali azali na bana to mpe bankoko, esengeli bayekola kolakisa botosi na makambo ya Nzambe liboso na libota na bango moko. Mpe bazongisela baboti na bango mpe bakoko na bango bolamu oyo basalelaki bango, pamba te yango esepelisaka Nzambe.