1 Timothy 6:2 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bawumbu oyo bankolo na bango bazali bandimi basengeli te kozanga kotosa bankolo na bango, atako bazali bandeko mpe balingami na bango kati na Klisto; nzokande, basengeli kutu kosalela bankolo na bango malamu koleka, pamba te bankolo, oyo bazali kozwa bolamu kowuta na mosala ya bawumbu, bazali motuya epai na bango bawumbu lokola bandeko balingami. Yango nde malakisi oyo osengeli kopesa mpe kosenga na bato ete batosa yango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Baoyo bakonzi na bango bazali bandimi, batiola bango te mpo bazali bandeko na bango. Nzokande, basalela bango na malamu penza, pamba te baoyo bazali kozua litomba na mosala na bango bazali bandimi mpe bandeko na bango ya bolingo. Tala, makambo oyo, osengeli koteya mpe kotinda bango.