2 Corinthians 11:21 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Nalobi yango na soni ete tozalaki penza babolole mpo na komitika bongo. Nzokande, makambo oyo bato mosusu balingi komikumisa na tina na yango —nazali koloba lokola moto ya liboma— ngai mpe nakoki komikumisa na tina na yango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Nazali koloba yango na soni, ete tozalaki penza babolele mpo na komitika bongo. Nzoka nde, makambo oyo bato mosusu balingi komikumisa na yango, (nazali koloba lokola moto ya liboma), ngai mpe nakoki komikumisa na yango.