2 Corinthians 8:10 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Boye, kati na likambo oyo etali kosunga, botala likanisi na ngai na tina na oyo eleki malamu mpo na bino: na mobu oyo esili koleka, bozalaki bato ya liboso, kaka mpo na kosunga te, kasi mpe mpo na kozwa mokano ya kosalaka bongo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Na tina ya likambo ya kopesa, tala likanisi na ngai: yango ezali malamu mingi mpo na bino baoyo, na mobu oyo eleki bozalaki bato ya liboso, kaka mpo na kopesa te, kasi mpe mpo na kozwa mokano ya kosala yango.