2 Corinthians 8:9 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso: Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te, boyebi ngolu ya Nkolo na biso Yesu Klisto: Ye oyo azalaki mozwi, andimaki kozala lokola mobola mpo na bino, mpo ete na nzela ya bobola na Ye, bino bokoma bazwi.