2 Corinthians 9:13 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Mpo ete lotomo yango ekotalisa bosolo ya komipesa na bino, basantu bakokumisa Nzambe mpo na botosi ya kondima na bino kati na Sango Malamu ya Klisto, mpe mpo na esengo oyo mitema na bino ezali na yango mpo na kokabola biloko na bino elongo na bango mpe elongo na bato nyonso.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Tango bakomona penza tina ya mosala na bino, bakokumisa Nzambe mpo na botosi oyo bozali kolakisa mpo na Sango Malamu ya Klisto, mpe mpo na ndenge bokopesa makabo na bino epai na bango, mpe epai ya bato nyonso.