2 Corinthians 9:2 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
pamba te nayebi molende na bino mpo na kosunga, mpe nazalaki komikumisa na tina na yango epai ya bato ya Masedwane. Nazalaki koloba na bango: « Kati na Akayi, wuta na mobu oyo eleki, bazali ya kobongama mpo na kopesa. » Mpe bolingo na bino etindikaki bato mingi kati na bango na kosunga.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te, nayebi ndenge nini mitema na bino ezalaka na esengo ya kosunga, mpe nabetaki tolo mpo na yango epai ya bato ya Masedwane. Nayebisaki bango ete, wuta mobu oyo eleki, bino na Akayi bosilaki komibongisa, mpe esengo na bino etindikaki bato mingi kati na bango na kosunga.