2 Peter 1:19 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Tozali lisusu kondima bosolo ya maloba ya basakoli oyo, bozali solo kosala malamu wana bozali kotia makanisi na bino kati na yango lokola na mwinda oyo ezali kopela kati na esika ya molili, kino tongo etana mpe monzoto ya tongo engenga kati na mitema na bino.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Yango wana, tozali na elikya mingi na maloba oyo baprofeta basakola, mpe bokosala malamu mpo na kotia makanisi na bino na yango: Pamba te, yango ezali lokola mwinda oyo ezali kopela kati na esikaya molili, kino tango tongo ekobanda kotana mpe monzoto ya tongo ekongenga kati na mitema na bino.