2 Peter 2:1 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Ndenge kaka basakoli ya lokuta bazalaki kati na bana ya Isalaele na tango ya kala, ndenge wana mpe bateyi ya lokuta bakozala kati na bino; bakokotisa na mayele mabe mateya ya lokuta mpe ya libebi kino ata kowangana Nkolo oyo asikolaki bango, mpe bakomibendela libebi na mbalakata.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kala, bateyi ya lokuta bazalaki na kati ya bato ya Isayele; ndenge moko mpe mpo na bino, bateyi ya lokuta bakozala na kati na bino. Bakokotisa na kobombama mateya oyo ememaka na libebi, bakowangana ata Mokonzi oyo asombaki bango; mpe na ndenge wana, bakomibendela bango moko libebi ya mbalakata.