2 Peter 2:20 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Soki, sima na bango kokabwana na mbindo ya mokili, mpo ete bayebi Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso, bamizongisi lisusu na bowumbu ya mbindo yango, bomoi na bango ekokoma mabe koleka ndenge ezalaki liboso.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Soki bato balongwe na kati ya makambo ya bosoto ya mokili, na nzela ya koyeba Nkolo na biso mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo, mpe bamitiki lisusu ete makambo yango ya bosoto ekanga bango mpe elonga bango, boyeba ete lolenge na bango ya suka ekozala mabe mingi koleka oyo ya liboso.