2 Samuel 12:18 — Compare Translations

1 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Na mokolo ya sambo, mwana akufaki. Basali ya Davidi babangaki koyebisa ye ete mwana akufi, pamba te bazalaki komilobela: « Wana mwana azalaki nanu na bomoi, tango tolobaki na Davidi, ayokaki biso te. Awa sik’oyo mwana akufi, tokoloba na ye ndenge nini? Soki toyebisi ye sik’oyo ete mwana akufi, akoki kosala likambo moko ya mabe! »