2 Thessalonians 1:10 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
tango akoya na mokolo wana mpo na kopesamela nkembo kati na basantu na Ye, mpe lokumu kati na bandimi na Ye. Bino mpe bokozala elongo na bango, pamba te bondimaki mateya oyo toteyaki bino.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
tango akoya na mokolo wana mpo ete basantu na ye bapesa ye nkembo, mpe baoyo nyonso bandimaki bakamwa ye. Bino mpe bokozala na bango elongo, pamba te bondimaki mateya oyo toteyaki bino.