2 Thessalonians 1:3 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bandeko, tosengeli kotonda Nzambe tango nyonso mpo na bino. Ezali malamu mpo na biso ete tosala bongo, pamba te kondima na bino ezali kokola penza, mpe bolingo oyo moko na moko na kati na bino azali na yango na moninga na ye ezali kaka kobakisama.