2 Thessalonians 2:13 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi biso bandeko balingami ya Nkolo, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino oyo Nkolo alingaka, pamba te Nzambe asila kopona bino wuta na ebandeli mpo ete bozwa lobiko, na nzela ya libulisi ya Molimo mpe ya kondima kati na solo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi biso, tosengeli kozongisa matondi na Nzambe tango nyonso mpo na bino baoyo Nkolo alingaka. Pamba te Nzambe asiʼapona bino banda na ebandeli mpo ete bozwa lobiko na nzela ya mosala ya Molimo oyo akomisaki bino basantu, mpe na nzela ya kondima makambo ya solo.