Acts 10:22 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bato yango bazongisaki: — Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda; azali moto ya sembo mpe atosaka Nzambe, mpe Bayuda nyonso bazali kotatola bolamu na tina na ye. Anjelu ya bule ayebisaki ye ete abengisa yo kati na ndako na ye mpo ete ayoka makambo oyo ozali na yango ya koloba na ye.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bazongisaki: —Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda. Ye azali moto ya sembo mpe abangaka Nzambe. Bayuda nyonso batosaka ye mingi. Anjelu ya Nzambe ayebisaki ye ete abengisa yo na ndako na ye mpo ete ayoka oyo okoki koloba.