Acts 11:5 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
— Wana nazalaki kati na engumba Jafa mpe nazalaki kosambela, nakweyaki na Molimo mpe nazwaki emoniseli. Namonaki eloko moko lokola elamba monene basimba na basonge na yango minei kokita wuta na Likolo, mpe ekomaki kino na esika oyo nazalaki.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
—Nazalaki kobondela na engumba ya Jafa mpe nazwaki emoniseli oyo: Namonaki eloko moko lokola elamba ya monene kokita wuta na likolo. Basimbaki yango na basonge na yango minei, mpe ekitaki kino na esika oyo nazalaki.