Acts 12:10 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Balekaki bakengeli ya liboso mpe ya mibale, mpe bakomaki na ekuke ya bibende oyo epesaka nzela ya kokota na engumba. Ekuke efungwamaki yango moko liboso na bango; bongo babimaki mpe batambolaki na balabala moko. Mpe mbala moko, anjelu atikaki Petelo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Wana ezalaki bango kokende, balekaki esika oyo bakengeli ya liboso mpe ya mibale bazalaki, boye bakomaki na ekuke ya bibende oyo bakotelaka na engumba, mpe ekuke yango efongwamaki yango moko. Tango babimaki mpe bakomaki na suka ya balabala, na mbala moko, anjelu atikaki ye.