Acts 12:11 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Tango mayele na ye ya bomoto ezongaki, Petelo amilobelaki: — Ah, nasosoli sik’oyo, ezali penza ya solo! Nkolo atindaki anjelu na Ye mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Tango Piere asosolaki ete makambo oyo esalami epai na ye ezali ya solo, alobaki: “Solo, namoni sikʼoyo ete Nkolo atindaki anjelu na ye, mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai!”