Acts 12:20 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Nzokande, Erode asilikelaki makasi bato ya Tiri mpe ya Sidoni. Bongo, bato ya Tiri mpe ya Sidoni bayokanaki mpe basengaki kokutana na Erode. Sima na bango kozwa lisungi ya Blasitisi, motambolisi misala ya shambre ya mokonzi, basengaki kimia kati na Erode mpe bango, pamba te bilei na bango ezalaki kowuta na mokili ya mokonzi Erode.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Erode azalaki na matata na bato ya Tire mpe ya Sidoni. Bongo, bayokanaki elongo mpo na kokende komona Erode. Na lisungi ya Blastusi, kalaka oyo abongisaka shambre ya mokonzi, balukaki kozongisa kimia na boboto, kati na Erode mpe bango, pamba te bilei na bango ezalaki kowuta na mokili ya mokonzi Erode.