Acts 12:4 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Sima na ye kokanga Petelo, atiaki ye kati na boloko mpe aponaki masanga minei ya basoda mpo ete bakengela ye; lisanga moko na moko ezalaki na basoda minei. Erode azalaki na makanisi ya kosambisa ye na miso ya bato sima na feti ya Pasika.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Sima ya kokangisa Piere, atiaki ye na boloko mpe apesaki ye na maboko ya masanga minei ya basoda, mpo ete bakengela ye: lisanga moko na moko ezalaki na basoda minei. Erode azalaki na likanisi ya kosambisa ye liboso ya bato sima ya feti ya Pasika.