Acts 13:46 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na mpiko: — Tosengeli liboso koteya bino Liloba na Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bozali bino moko komimona ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi na biso sik’oyo epai ya bato oyo bazali Bayuda te.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na molende nyonso: — Tosengeli liboso koteya Liloba ya Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bomoni ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi epai ya bato oyo bazali Bayuda te.