Acts 16:18 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Lokola azalaki kosala bongo wuta mikolo ebele, suka na suka, Polo atombokaki, abalukaki mpe alobaki na molimo mabe yango: — Na Kombo na Yesu-Klisto, napesi yo mitindo: bima kati na mwasi oyo! Kaka na tango yango, molimo yango ebimaki kati na ye.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Azalaki kosala bongo mikolo ebele. Suka na suka, Polo atombokaki, abalukaki mpe alobaki na molimo yango: “Na kombo na Yesu Klisto, napesi yo mitindo, bima kati na elenge mwasi oyo!” Kaka na tango wana, molimo yango ebimaki kati na ye.