Acts 19:33 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bayuda kati na ebele ya bato batindikaki Alekizandre na liboso, mpe batalisaki ye likambo yango ndenge ezali. Bongo Alekizandre atombolaki loboko mpo na kolakisa ete alingi kozwa maloba mpo na kotalisa na bato.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Boye, ndambo ya bato oyo bazalaki kati na ngulupa ya bato balimbolelaki Alekizandre, moto oyo Bayuda batiaki liboso, likambo yango ndenge ezalaki. Bongo, Alekizandre atombolaki loboko mpo na kolakisa ete alingi koloba na bato.