Acts 19:35 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Suka na suka, mokomi mikanda ya engumba alongaki kopekisa makelele ya bato; alobaki: — Bato ya Efeso! Nani kati na mokili oyo ayebi te ete engumba ya Efeso ezali engumba mosantu ya Artemisi, nzambe mwasi monene, mpe ya ekeko na ye oyo ekita wuta na likolo?
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Suka-suka, sekretere ya engumba alongaki kopekisa makelele ya bato. Alobaki: “Bato ya Efeso! Nani kati na mokili oyo ayebi te ete engumba ya Efeso ezali engumba mosantu ya nzambe monene ya mwasi Artemisi, mpe ya ekeko na ye oyo ekita wuta na likolo?