Acts 19:9 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi bato mosusu kati na bango bazalaki mitema mabanga; baboyaki kondima mpe batiolaki nzela ya Nkolo na miso ya bato ebele. Bongo Polo akabwanaki na bango. Amemaki bayekoli mpe, mokolo na mokolo, azalaki koteya bango na eteyelo ya Tiranisi.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi bato mosusu kati na bango bazalaki mitema mabanga, bazalaki koboya kondima mpe bazalaki kotiola nzela ya Nkolo na miso ya bato ebele. Polo akabwanaki na bango. Boye, amemaki bayekoli, mpe mokolo na mokolo, azalaki koteya bango na eteyelo ya moto moko na kombo ya Tiranisi.