Acts 21:20 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Sima na bango koyoka ye, bakumisaki Nzambe. Bongo balobaki na Polo: — Ndeko, ozali komona motango ya bankoto ya Bayuda oyo bakomi bandimi, mpe bango nyonso bazali na bolingo makasi mpo na Mobeko ya Moyize.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Tango bayokaki bongo, bakumisaki Nzambe mpe balobaki na Polo: “Ndeko, tala nanu bankoto ya Bayuda oyo bakomi bandimi, kasi bango nyonso bazali nanu ya kokangama na Mobeko.