Acts 21:34 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kati na ebele ya bato oyo batondaki wana, bamoko bazalaki koganga mpo na likambo moko, mpe bamosusu, mpo na likambo mosusu. Lokola mokonzi ya basoda azalaki kososola te bosolo ya likambo, mpo na mobulu oyo ebimaki, apesaki mitindo ete bamema Polo kati na lopango ya basoda.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kati na ngulupa ya bato oyo batondaki wana, bato na bato bazalaki koganga na ndenge na bango. Lokola mokonzi ya basoda azalaki kososola bosolo ya likambo te mpo na mobulu oyo ebimaki, apesaki mitindo ete bamema Polo na lopango ya basoda.