Acts 21:5 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Atako bongo, tango mikolo na biso ekokaki, tolongwaki wana mpe tokobaki mobembo na biso. Bayekoli nyonso elongo na basi na bango mpe bana na bango bakendeki kotika biso kino na libanda ya engumba. Tango tokomaki na libongo, tofukamaki mpo na kosambela.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi tango mikolo na biso ekokaki, tolongwaki wana mpe tokobaki mobembo na biso. Bayekoli nyonso, basi na bango elongo na bana na bango bakendaki kotika biso kino na libanda ya engumba. Tango tokomaki na libongo, tofukamaki mpe tosambelaki.