Acts 22:30 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, apesaki mitindo ete bafungola Polo minyololo; mpe abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato ya Likita-Monene mpo ete basala mayangani. Bongo amemaki Polo mpe atiaki ye liboso na bango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Na mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, atindaki ete bafungola Polo minyololo mpe abengisaki bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bato ya Likita monene ete basala likita. Boye, ayaki na Polo mpe atiaki ye liboso na bango.